9 Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango.
Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »
Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu.
mpe alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. ›