Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)


Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko mpe ememaka nzala.


Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo ? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?


Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ