Bilombe 6:39 - Mokanda na Bomoi39 Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe : « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.