Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »
Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye : — Boni, bino nde bokolobela Bala ? Bino nde bokobundela ye ? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.
Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More.
Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.