Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:31 - Mokanda na Bomoi

31 Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye : — Boni, bino nde bokolobela Bala ? Bino nde bokobundela ye ? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:31
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki : « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe ; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo ; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »


Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.


Eliya apesaki bango mitindo : — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.


Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.


boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ; bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.


Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.


Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.


Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »


Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.


Bato ya engumba balobaki na Joasi : — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.


Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko.


Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ