Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ; basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso ! Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ; bakokweya na somo mpe na soni.
Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami ; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika.
Bato ya engumba balobaki na Joasi : — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.