Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:26 - Mokanda na Bomoi

26 Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:26
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.


Orina azongiselaki Davidi : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.


Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,


Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.


Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te.


Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ