Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazalaki kovanda na nzela ya mayi ekawuka, kati na mabulu ya mabele mpe ya mabanga ;


Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe ;


Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.


Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.


ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.


Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.


Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi.


Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi.


Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.


Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.


Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ