18 Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki : — Nakozela kino okozonga.
Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki : — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.
Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.