Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »


Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.


Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu.


Okebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo ; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka.


Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino !


Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.


Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai ?


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Kolanda bizaleli ya bikolo ya bapaya te mpe kobanga bilembo ya likolo te ata soki ezali kobangisa bato ya bikolo.


Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.


Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino.


Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda.


Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine.


Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »


Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.


Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki : « Nkolo, nani andimaki mateya na biso ? »


Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo ?


Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ