Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 6:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 6:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.


Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.


Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.


Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.


Bongo naloba lisusu nini ? Pamba te nakozanga tango soki nabandi koloba na tina na Jedeon, Baraki, Samison, Jefite, Davidi, Samuele mpe basakoli.


Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.


Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala.


Jedeon azongisaki : — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ