Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.


sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.


Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye.


Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.


Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye !


Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Pamba te Tito ayambaki na esengo makasi likanisi oyo topesaki ye ya koya epai na bino ; mpe ezali na mokano na ye moko nde ayei epai na bino.


Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te.


Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ