8 Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.
Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,
Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.
Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.
Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.
Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.