Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ; mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.


Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !


Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.


Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, pamba te monguna asimbi mopanga, bongo somo makasi ezali bisika nyonso.


Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.


Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.


Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.


Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ