5 Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Soki atali mokili, mokili elengaka ; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.
bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,
mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.
Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.
Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika
Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo !
Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.
Soki bangomba emoni Yo, elengaka ; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.
Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,