Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:30 - Mokanda na Bomoi

30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:30
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo.


Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.


elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.


Mwana mwasi ya mokonzi azali kongenga na kitoko kati na ndako ya mokonzi, alati elamba batonga wolo.


Na liloba moko kowuta na Nkolo, basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi ; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.


Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.


Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.


Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso ; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.


Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye, mpe ye moko amilobeli :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ