Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bino bakonzi, boyoka ! Bino bakambi, boyoka malamu ! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.


« Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,


Boye Eliya alobaki na bango : — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino


Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.


Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.


Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.


Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.


Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :


Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


Nakosakola Kombo ya Yawe. Bokumisa monene ya Nzambe na biso !


Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ