Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.
Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga : « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? »