Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.
Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso ! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.