24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso ! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.
Sisera alobaki na Yaeli : — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.