Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:22 - Mokanda na Bomoi

22 Makolo ya bampunda enyataki mabele, na kopumbwa na mbangu makasi, na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?


Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.


Mpunda ezali na nguya te ya kopesa lobiko, makasi na yango nyonso ekangolaka te.


Bambanzi na bango ezali songe, batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ; makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga, bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi.


tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.


Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ