Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.
Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.
Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. Atambolaki liboso ya bato ; mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »
Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »
pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »