Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, kuna na esika ya bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.


Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli : Dani mpe Nefitali.


— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.


Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.


Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori.


Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ