16 Mpo na nini avandi kati na lopango ? Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ? Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa tango pamba na kokanisa.
Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ; ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu na makolo kino na lubwaku. Kasi kati na libota ya Ribeni, mitema etondaki mingi na makanisi.