Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:14
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.


Bana mibali ya Rasheli : Jozefi mpe Benjame.


Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.


Bobeta kelelo, na Gibea, mpe liseke, kuna na Rama ! Bobeta lolaka ya bitumba na Beti-Aveni ! Oh Benjame, keba !


Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki.


Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila.


Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.


Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye.


Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.


Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi, bato ya Yawe bakiti mpo na ngai kati na bilombe ya bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ