Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.


Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.


Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu.


Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka mpe nazalaki kotia kiti na ngai na esika oyo bato ebele bakutanaka,


Bakokanisa misala minene ya bolamu na Yo, bakobetela bosembo na Yo maboko.


Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.


Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.


akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.


« Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.


Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso !


Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe.


Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »


bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.


Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. Atambolaki liboso ya bato ; mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »


mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.


Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.


Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ