Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 5:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.


Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.


Kanisa kokumisa misala na Ye, misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo.


tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ?


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.


Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.


Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.


Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »


Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.


Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : Tozali na engumba moko ya makasi ; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.


Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo : « Oh libulu, bimisa mayi ! Boyembela yango !


Bongo Mari alobaki : — Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,


Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye.


Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele.


Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ