Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 Debora alobaki na ye : — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:9
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye : « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te ! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te ! »


Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.


Baraki azongiselaki Debora : — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.


Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.


Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ