8 Baraki azongiselaki Debora : — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.
Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »
Debora alobaki na ye : — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.