Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya apesaki bango mitindo : — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.


Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.


Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.


Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso.


Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »


Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »


Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino.


Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye.


Baraki azongiselaki Debora : — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te.


Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya !


Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?


Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ