Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo,


Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai !


Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.


Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango


Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?


Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ;


Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola.


Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.


Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ