Alobaki na bango : « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te ? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te ? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.
Bana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna ; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi.
Mpe sima na Nzambe kotia nyonso na se ya bokonzi na Ye, Ye moko Mwana akomitia na se ya bokonzi ya Nzambe oyo atiaki nyonso na se ya bokonzi na Ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,
Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye.