Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.


Tango Yabini, mokonzi ya Atsori, ayokaki makambo oyo, atindaki maloba epai ya Yobabi, mokonzi ya Madoni ; epai ya mokonzi ya Shimironi, epai ya mokonzi ya Akishafi,


Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni.


Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni.


Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.


Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ