Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sisera alobaki na Yaeli : — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:19
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? ›


Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.


Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba : mayi ezali te ; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.


Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela.


Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye : — Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.


Sisera alobaki na Yaeli : — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! »


Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso ! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ