18 Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye : — Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te. Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti.
Elize alobaki na bango : — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.
Sisera alobaki na Yaeli : — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi. Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti.