Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 4:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 4:16
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te ! Oh molimo na ngai, pambola Yawe ! Aleluya, bokumisa Yawe !


Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.


Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.


Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.


Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba ; Ye oyo alalisaka bango nyonso, mpe bakokaka lisusu kotelema te, bakufaka lokola singa ya mwinda :


Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko bakokufa na kozanga mpe Mobeko. Nzokande bato oyo basalaki masumu, wana basengeli kotosa Mobeko, bakosambisama kolanda Mobeko.


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.


bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi.


Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni.


Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ