15 Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo.
pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »
Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.