Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango ; bakangaki ata minoko ya bankosi,
Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.