Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo ; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango ; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.


Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.


Tango nyonso Nzambe azalaki koboma bango, bazalaki koluka Ye ; bazalaki komizongisa noki epai na Ye.


Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.


Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.


Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe : — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala.


Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi.


Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.


Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.


Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.


Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi.


Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani,


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ