Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.


Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya, mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango ;


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :


Osundoli biso na maboko na bango lokola bameme ya koboma mpe opanzi biso kati na bikolo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.


olimbisaki mabe ya bato na Yo mpe olongolaki masumu na bango nyonso.


Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.


Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.


Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe ; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.


Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki : « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai,


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.


Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.


Debora alobaki na ye : — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi.


Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ