Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:7
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.


Joziasi abukaki mabanga ya bule, akweyisaki makonzi ya Ashera, mpe atondisaki esika yango na mikuwa ya bato.


Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.


Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron.


Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi.


Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi.


Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na banzambe Bala mpe atelemisaki makonzi mpo na nzambe mwasi Ashera. Afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.


Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi.


kasi basanganaki elongo na bapagano mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.


Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko oyo ekomaki motambo mpo na bango.


Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.


Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?


Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo.


sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu,


Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.


Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.


Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango.


Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ