Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;
mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.
Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,