Bilombe 3:3 - Mokanda na Bomoi3 Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te.
Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.
Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela : kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.
Bato ya Filisitia batunaki : — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? Bazongisaki : — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.