Bilombe 3:28 - Mokanda na Bomoi28 Alobaki na bango : — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba : « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani ; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.