Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:27 - Mokanda na Bomoi

27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:27
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.


Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »


Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.


Jozue azongiselaki bango : — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.


Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.


Sima na kufa ya Abimeleki, ezalaki Tola, mwana mobali ya Puwa, mwana mobali ya Dodo, moto ya Isakari, nde atelemaki mpo na kobikisa Isalaele. Azalaki kovanda na Shamiri, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.


Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Mika. »


Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.


Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira.


Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.


Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye.


Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba : « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani ; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.


Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ