Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye : — Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »


Mpo ete Esidrasi atelemaki na esika ya likolo koleka bato nyonso, moto nyonso amonaki ye kofungola buku. Mpe tango kaka afungolaki buku yango, bato nyonso batelemaki.


Nzembo ya Davidi. Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe, bopesa Yawe nkembo mpe makasi.


Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.


Ezalaki na sanza ya libwa ; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye.


Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi ; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.


Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !


Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki, telema mpe yoka ! Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu !


Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. Mokonzi azongisaki : — Kimia ! Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda.


Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ