Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elongi na ye ekotonda mafuta, loketo na ye ekokoma monene ;


Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango !


Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta ; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe ;


Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bango : Tala, nakokata, Ngai moko, makambo kati na ebwele oyo ya mafuta mpe oyo ekonda.


Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.


Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango.


Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi ; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki.


Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ