Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:16
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda : na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.


Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango


Oleki bato nyonso na kitoko, mpe bibebu na Yo ebimisaka ngolu ; yango wana Nzambe apambola Yo mpo na libela.


Bango nyonso balati mipanga ; bango nyonso bazali makasi na bitumba, baselingwa mpo na bitumba ya butu.


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :


Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.


Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene.


Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ