Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.
Tango bato ya Sidoni, ya Amaleki mpe ya Maoni banyokolaki bino, boni, bogangaki epai na Ngai te mpo na kosenga lisungi ? Boni, nakangolaki bino te wuta na maboko na bango ?
Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.
Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.