Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Bilombe 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Bilombe 3:11
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Kenazi : Otinieli mpe Seraya. Bana mibali ya Otinieli : Atati mpe Meonotayi.


Kasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo ! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi.


mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.


Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.


Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.


Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.


Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.


Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ